(Translation in Lingala: Libère Tumba Mwanakalumbu)
Molangi na kati ya ebale
Ye akoki kozala motindami wa bonzindami bo ebale bwa kala boye bongo azali kopesa na biso sekele. Kasi na bosolo tokomona te ye azali bobele bosoto, plastiki/kopal, oyo ezanga motuya. Na suka na mobembo moye molakisi biso mbotama na ye, mpe mosala mpe bowei, nzoka nde alandaki nzela ya biye bitike, kobwakama boye na boye na yoko ba kantini ya minene elongo na bitike bisusu. Kino mokolo moye, na sima ya bomoyi bolai balakaki ye ya mbula koto moko (kasi yango nde elikia ya bomoi bwa plastiki/kopal!), azindisami na bokasi bwa ebale, kobendama na mbonge bipai na bipai, kino kosuka na esika ya kokamwa oyo biloko mosusu pe bya masolo makokana, biyambi ye na se na moyi moke. Nzoka nde ye wana azali kobeba nzoto na bokutani na mayi, na kobebisaka malembe malembe mayi na biye bizuami okati. Nzoka nde na tango nzoto na ye ezali konzuluka na bitumba ya mbonge pe mipepe, molangi azali kokanisa…
Amimoni boye nakati ya ndako oyo bamemaki ye, moko mokolo, azalaki kolekaleka na maboko maike na kati ya bondeko boko boyebani te, boye bopesi ye ndambu kasi kizunguzungu ya kafukafu. Azalaki nde lofundu, mabongisi ya maboko na bato, nzeneneke basalela ye. Asalemaki te mpo na yango ?! Ya solo, molangi akanisi mbotama na ye na kati ya ebongiselo, lokola te a’komikumisela mbela eye epesaki mwango mwa bosali ye mpo na kopesa boyebi kofanda mpe bosawa na baye bakosalela ye, o kati na nkita mpe bozui na ntango na biso.
Ya solo, na boye, ata ko azalaki momeseni te, nde ayoki basusu kolobela bozangi, bobuti molunge na mokili, bobangisi bwa nzinga nzinga, bobesi bomoyi, to bokolongono bwa nzoto. Nzoka maye manso mazalaki komonana nde mosika, nde malimbolami te na etamboleli ya ntango na biso oyo ye azalaki moko na bakitani ! Nde azalaki te elilingi ya boyebi lotiliki bwa biso, oyo penza bwa mafuta! Nde apesi ntina te na mbuma na misala na maboko oyo abombaki mpo na ntina na kolia ! Ata ko bomikitisi bwa ye, ata ko bokuse bwa mabongisi bosaleli ye, molangi azali kokanisa molongo mwa bosaleli/kolia moye azalaki o kati o ntango yoko, na kolakisaka oyo ya ye esika na molongo mwa biloko oyo azalaki kokanisa bokambemi bobongisama malamu, kasi na ndenge « molangi » akoki kokanisa. Moninga mwasi moko abetelaki ye lisolo ya elenge mobali oyo na kozalaka na mwa nkokoso ya botamboli, oyo azuaki makoki ya kolonga botau boye na bobongisi bwa ndenge ya sika mpe kobongisa na baninga ba ye, efinelo (pince) na ebimiselo ya ngambo isatu na ntina ya kosalisa ye bofungoli bwa milangi lokola bango. Kokamwa !
« Molangi », talani nkombo eye ! Ye wana azali komituna lolenge nini kotanga kombo eye na nkota(minoko) ya mokili moye. Nkombo eye ezali ya kimwasi to ya kimobali ? To lolenge fulani te ? Nkota mosusu, akokanisa na ntango eye po na mbala ya liboso, ekoki koyeba nkombo eye te to etikala naino koyebani yango te owuta kala… Likambo lie lizali kobulungisa ye makanisi mwa moke. Boni boni elongoli bozangi boye ? Nde azui likanisi awa te boponami bwa ye bopesi ye kaka ntina te mpe lolenge, kasi bozalisi lolenge lwa ye… Na boye nde azui esika na kati ya mokanda ya mibombano ya ntango na biso ? Boye ! A’kokanisaka na kovimbisa tolo. Nde azali te o mobimba mwa ye nionso esika eye ya malamu ekundolami ya sika, oyo elakisi kokende oboso, mbongwana ?
Talani, ezali likamwisi mpo na ntango etangami mbongwana, ye akanisi te amoni mpepo ezanga mokumbi okati koleka likolo ya esika eye ye azali… Mpepo ezanga mokumbi, okati na bisika bitike oyo ? Likanisi mpamba kaka ntango isusu. Molangi akoloba te alekelami kaka na bililingi mpe azongeli malamu penza nzela ya makanisi ma ye.
Soko akokaki kokoma mikanda, nde asakoli sakoli bikolo bipaya oyo akatisi likolo na mabele maye mpe mayi, na ngambo isusu ya bibale, ngomba, zamba pe mikili. Nde baike balingaki bakamwa, mpo molangi akatisi ndelo ebele, ba mboka ebele… pe amoni bitando mingi ya bokesani, ya bozui, ya bozangi kasi pe ya boteki biloko lisanga mokili mobimba pe boyebi oyo te bosoto bobungi manso maye soko moke te ! Nani akoyeba, ntango mosusu akoki kosalisa botali mozindo makanisi ma biso ya mokili oyo, na ndenge milangi ya plastiki/kopal mizalaka kozua misala miike ya solo oyo e’kolamusaka to e’kolakisaka makanisi ya boyebi suka te bwa boko basaleli yango !
Mikolo mileki mingi, na ntango lolenge lwa ye lokomami na mesa ya mokeli/moto ya mayele, na kitoko ya nzoto na ye, na ndelo ya bogumbami bwa nzoto na ye oyo enyoloka molayi, nde molangi alingaki akana kolonga mokili mobimba. Ntango oyo ekoya ezalaki nzoka ya ye. Bobangi moko te ezalaki koyela ye na makanisi, mpe lolenge nionso ya likama ezalaki komonono mosika, lokola ekokaki kozala te… Kasi talani azali komiyeba botau/pepele/makasi te, abongisami na kosila na kati ya bisika na mayi oyo elongobani te na komikumisela… Nzoka molangi abandi komindima te. Nde alingaka kozala lolenge mosusu soki ayebaka, mingi liboso ?
Talani ye azali kokanisa molongo ya mabele oyo ezali makasi te lokola te azalaki komono mbele likama lizali kobuta oyo etelemeli biloko binso lokola ye, mpe bikelamu nionso na mpe moto. Amiyoki na kati, na biye binso bizali okati na ye bizali na kati na kobeba, lokola te azali suka ya lyoko lisolo, ya botamboli oboso mpe komituna. Ye oyo azali molangi mpamba na kati na mayi, amituni kasi na oyo ekoki kozala makasi na ye ya suka, oyo etikali ye asala, akokisa.
Nde akokisi elaka na ye te na kokanisaka kobandela yango te ? Nani akoki kozua montango na lolenge loye loyebani te ?
Hiyo molangi amimoni atikali etike, ye moko. Alingaki koyebisa na mokili maye azali koyoka o kati na ye, kolamusa motema mwa « biso » ekenge na mambi ma sika mpe ntina na lombango lwa eyano na mango, kasi moko te oyo ezanga pasi mpo na molangi oyo azali komikufela na etando oyo ezali te, naino te. Ya solo mabota maye makoya nde matikali koyoka soko moke te masolo na ye…
Nde apesaka mingi mpo ya kobongolo mango, mpo na kosalisa komanyola te esengeli ntango mosusu koyekola kokabwana na mambi masusu, komekola lolenge na biso lwa boyekoli na biloko, na bato mpe na mokili. Kasi na kotalaka nzinga nzinga na ye, nde alikie kokanisa te manso maye mazali bobele likanisi. Likanisi lya molangi – plastiki/kopal – na ebale, oyo ekolamusaka lisusu te bozalisi bwa ye, to mwa mayele muke. Ngonga ebelemi, mikano mikamatami, mizuami… Afandi te esika elamu mpo na ko ndimisa ! Nzoka molangi a’koloba te soki ezalaki ya kozongela… Bongo akati maloba mpo ayebi te ezali pasi kozonga sima. Amilobi kasi te soki ezalaki ya kosala, ebongaki mbele ezala oboso ya mayangani/masangani maye, na ekambemi ya makaboli malamu…
Na mbala moko molangi atelemi, akati maloba… Na mbalakaka, loboko moko loye kosimba ye… Akoki kondima te, nzoka tembe te, amiyoki lisusu makasi ya bosololi oyo epesaki ye kolinga mokili moye. Na lombangu na mbalakaka, nde amoni lisusu koleka oboso bwa ye bililingi ya bomoi bwa ye : bilili ya mokeli/moto wa mayele, bopesi byango nzoto, etando ya bobongisi/bokeli mpe oyo ya bobongisi milangi, esika oyo na kati ya botiki basombi ye, bisengo makasi ya ndako, nzela ya botie ye pembeni o kati ya bosoto, kino bitapi binso bya nzela eye eyebani te oyo mokolo mosusu ememi ye koyeba ebale enene ! Mpe kala te ayoki lolaka loko loye atikala lisusu koyoka te owuta kala : « Talani, esika nini oyo wana awuti !? » « Kokamwa ! Elembo elamu, zuani ye… »